Ndenge kaka tolobaka, mosala ya Tupacongo Sport ezali kolakisa oyo tobengaka na lompoto " quintessence " ya Sport Congolais. Elingi koloba eloko oyo ezalai na motuya pe ezalai kosala lokuma ya Ekolo.
Yango Wana tokamataki mituka mia biso pona kokende ti o mboka Liège epayi kani tokutanaki na elenge mobali oyo apesa biso esengo na Chan 2014 o mboka Nelson mandela tango atiaki mingente mibale na ba nguna ya Burundi pe ekolo ekotoki na 1/4 de finale.
Bolanda bilili miye, boyoka esengo oyo Makusu azali na yango. Biso pe tosukaki wana te, totunaki pe mituna miyike na elenge mobali Yannis Mbombo oyo azalai pe mosani lokola Makusu o nte ya lingomba ya Standard, tolingaki toyeba soki azalaka pe na mposa ya kobeta ndembo na lingomba ya léopard.
Molakisi Ndembo Franklin Mateso azalaki na nga elongo pona kopesa pe batoli na bilenge na biso po misala mia bango mikende o liboso.
Enregistrer un commentaire